La Mignonna - Langa Langa Stars


Voter pour La Mignonna :
Voter Voter Voter Voter Voter Voter Voter Voter Voter Voter
Tweeter

Paroles de Langa Langa Stars - La Mignonna


Na bondeli yo na ba bijoux, hé hé

Na bondeli yo na ba bongo, hé hé

Nga na leli oh, nga na leli oh, nyango

Nga na leli oh, nga na leli oh, mama

Na kozua yo wapi, oh oh Chérie

Soki na zui yo te, oh likambo te

Na kende pembeni ya ebale na kuta mwasi oyo ba bengi

Mamiwata

Nzoto sacré, nzoto ya magie eh

Eh Nga na komi zoba po na yo, mama

Eh Na sali nini po yo oyokela nga

Eh likambo yo osali nga na yebi tina te

Oh na kamwi



Yoka mwana moninga ata mwa mawa ndenge alelakayo

Oh Kabibi na nga ah ah

Na zali komituna nini ba tshi yo na motema

po okoma lelo boye, mama



Yo mon amour ya motema nga

Yaka eh eh, Yaka eh eh, zonga eh eh, Bibi eh eh

Keba keba noki batindela yo sango ya mawa

Yoyoyo epayi yo ozali omema ngabo

Yeyeye mwana mama, ah



Yoka mwana moninga ata mwa mawa ndenge alelakayo

Oh Dorothée na nga ah ah

Na zali komituna nini ba tshi yo na motema

po okoma lelo boye, mama



Yo mon amour ya motema nga

Yaka eh eh, Yaka eh eh, zonga eh eh, Bibi eh eh

Keba keba noki batindela yo sango ya mawa

Yoyoyo epayi yo ozali omema ngabo

Yeyeye mwana mama, ah



Na boya ba petits ba bimi, lelo abimi, lobi kuna abima

Monotonie eh eh eh eh, Monotonie eh eh eh eh,

Eh eh eh, mama ah,

Mibali eh, ba zua yo na valeur te



Ata obimi po osepelisa nzoto eh, bato ba ko comprendre yo te

oh

Misusu babima pona koluka mbogo eh, basusu pona plaisir, oh

chérie eh

To ko comprendre yo lisusu te oh, nini olingi eh

Yebisa baboti ba yo ba yeba



Kitoko ya mwinda pamba, chérie aye, ah chérie aye

Soki bakati ye courant, soki bakati ye courant

Okopela wapi eh, okomi ngo mabele



Lolendo eloko pamba ba sala ngo basila ah

Bozoba ya soso ezali sende te mama, ah

Ezali sende te mama

Nyata yango, soki oko ndima Nzambe eh eh



Aye Petite oh

Aye mwana mama

Aye La mignonna botika nga na lela



Ritournelle



Chérie na nga Bibi, mwana kin oh oh

Chérie na nga Bibi, La mignonna oh

Imprimer La Mignonna - Langa Langa Stars

Video de Langa Langa Stars - La Mignonna

Commentaires sur Langa Langa Stars - La Mignonna

Aucun commentaire sur La Mignonna pour l'instant...

Commenter la musique de Langa Langa Stars - La Mignonna

D'autres titres de Langa Langa Stars

Thématique sur la chanson : La Mignonna de Langa Langa Stars

Haut de page